Amosi 8:3 - Mokanda na Bomoi3 Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.