Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 8:2 - Mokanda na Bomoi

2 Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 8:2
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.


mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge : soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.


Ngai, nakotikala na Mitsipa mpo na kolobela bino liboso ya bato ya Babiloni, oyo bazali koya epai na biso. Kasi bino, bobuka bambuma ya vino, bambuma mosusu, bokamola mafuta mpe bobomba yango na bibombelo na bino, bongo bovanda kati na bingumba oyo bosili kozwa. »


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ; boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso. Suka na biso ekomaki pene, mikolo na biso ekomaki ya kotanga, mpo ete tokomaki na suka.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. › Loba na bango lisusu : ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakoyeisa mopanga mpo na kobebisa yo, mpe nakoboma bato na yo mpe bibwele na bango.


Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo.


Kasi libota ya Isalaele bakolinga koyokela yo te, mpo ete balingaka koyokela Ngai te ; pamba te libota mobimba ya Isalaele bazali mitema mpe mito makasi.


Tango ya suka ebelemi ! Ya solo, tango ya suka ebelemi penza ! Etelemeli yo. Tala, tango yango esili kobelema !


Molimo alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko ? Bazali koloba : ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili ! › »


Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, omoni ? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo ? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai ? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo !


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ozali komona makambo oyo bazali kosala, makambo mabe mpe ya nkele oyo libota ya Isalaele bazali kosala awa, makambo oyo ekokomisa Ngai mosika ya Esika na Ngai ya bule ? Kasi okomona lisusu makambo oyo ezali mabe koleka. »


Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.


Yawe atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona nivo oyo batongi ndako basalelaka. Nkolo alobaki na ngai : — Tala, nakotia nivo oyo batongi ndako basalelaka na likolo ya Isalaele, bato na Ngai. Nakolimbisa bango lisusu te.


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : kitunga etonda na bambuma etela.


Tala, mawa na ngai ! Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka bambuma na eleko ya elanga, na tango oyo bazongelaka kobuka bambuma ya vino oyo etikalaka. Kasi ezali ata na liboke moko te ya bambuma ya vino ya kolia to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.


Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona buku moko : ezali kopumbwa ; molayi na yango ezali na bametele pene zomi, mpe mokuse na yango, bametele pene mitano.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ