Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 8:11 - Mokanda na Bomoi

11 Na mikolo ekoya, » elobi Nkolo Yawe, « nakotinda nzala makasi kati na mokili ; ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi, kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 8:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko.


Tozali lisusu komona te bilembo na biso, basakoli bazali lisusu te ; mpe moko te kati na biso ayebi tango boni makambo oyo ekowumela.


Soki emoniseli ezali te, bato bakotambola ngulungulu. Esengo na moto oyo atosaka Mobeko !


Nakokomisa yango esobe : kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti ; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.


Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.


— Loba na bandeko na yo ya mibali : « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi : « Bozali balingami na ngai. »


Na butu, bokozwa lisusu bimoniseli te. Soki bapesi bango te eloko ya kolia, molili ekozingela bino mpe bokokoka lisusu kosakola te ! Moyi ekobimela lisusu basakoli yango te, mpe mokolo ekokoma molili mpo na bango.


Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.


Samuele alobaki na Saulo : — Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai ? Saulo alobaki : — Nazali na pasi makasi : bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai ; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala.


Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.


Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ