Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 7:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 7:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.


Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule kaka mpo na mwa tango moke ; kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule !


Tosambwe, pamba te totiolami ; mpe bilongi na biso ezipami na soni mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule ya Tempelo ya Yawe.


Loba na yango : Oh bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba milayi, na bangomba mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Namibongisi mpo na kotindela bino mopanga mpe kobebisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba.


Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »


« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.


Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »


Pamba te, tala maloba oyo Amosi azali koloba : ‹ Jeroboami akokufa na mopanga, mpe Isalaele akokende na bowumbu, mosika ya mabele na ye. › »


Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.


Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


Mpo na nini nyonso wana ? Ezali mpo na mabe ya Jakobi, mpo na masumu ya libota ya Isalaele. Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe ? Boni, ezali Samari te ? Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba ezala kati na Yuda ? Boni, ezali Yelusalemi te ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ