Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 7:8 - Mokanda na Bomoi

8 Yawe atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona nivo oyo batongi ndako basalelaka. Nkolo alobaki na ngai : — Tala, nakotia nivo oyo batongi ndako basalelaka na likolo ya Isalaele, bato na Ngai. Nakolimbisa bango lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 7:8
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobebisa Yelusalemi ndenge nabebisaki Samari, mpe nakokomisa yango lokola ndako ya Akabi. Nakonika Yelusalemi ndenge banikaka mpe babalolaka nzungu.


Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi mpe boyengebene lokola singa ya mbodi ; mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.


Esulungutu mpe ndeke mosusu ya butu ekozwa yango lokola libula, kumu mpe yanganga ekokoma kovanda kuna. Nzambe akosembola likolo ya Edomi singa ya mobulu mpe nivo ya kozanga.


Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo ; nakoyokela yo lisusu mawa te.


Yawe akani kobuka bamir oyo ezingeli Siona, mboka kitoko ; atandi singa ya komekela molayi mpe azongisi loboko na Ye na sima te mpo na kobebisa ; abebisi bamir oyo ebatelaka engumba mpe bamir mosusu ; bongo akweyisi yango nyonso.


Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze : — Pesa ye kombo Lo-Rukama, pamba te nakotalisa lisusu bolingo na Ngai te epai ya libota ya Isalaele mpe nakolimbisa bango te.


Tala makambo oyo alakisaki ngai : Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka.


Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.


Atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongiselaki ye : — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.


Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona buku moko : ezali kopumbwa ; molayi na yango ezali na bametele pene zomi, mpe mokuse na yango, bametele pene mitano.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ