Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 7:5 - Mokanda na Bomoi

5 Boye, nagangaki : — Oh Nkolo Yawe, nabondeli Yo, kosala boye te ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 7:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi mpe okitisaki motema na Yo.


Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore.


Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila mpe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bango mpo na kobebisa bango. »


Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo ekobima kati na bango. Nakokomisa bango ebele, mpe motango na bango ekokoma ebele ; nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te.


Tango bazalaki koboma bato, natikalaki ngai moko ; nakweyaki elongi na ngai kino na mabele mpe nakomaki koganga : — Oh, Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma batikali nyonso ya Isalaele, na kopelisela Yelusalemi kanda na Yo ?


Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. Tika ete baloba : « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola to eloko ya maseki kati na bikolo. Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba : ‹ Wapi Nzambe na bango ? › »


Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.


Nabondeli Yo, kolanda bolingo monene na Yo, limbisa masumu ya bato oyo ndenge kaka olimbisaki bango wuta babimaki na Ejipito kino sik’oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ