Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 7:16
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.


Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.


balobaka na bato oyo bamonaka makambo : « Bomona te, » mpe na basakoli : « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te, boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso, bosakolela biso makambo ya lokuta.


« Mwana na moto, sakola mabe na tina na basakoli ya Isalaele, oyo bazali kosakola sik’oyo ; loba na ba-oyo bazali kosakola makambo oyo ezali kowuta na mitema na bango moko : ‹ Boyoka Liloba na Yawe !


Yango wana, yo mwasi ya ndumba, yoka Liloba na Yawe !


« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya sude, loba mpo na kotelemela etuka ya sude mpe sakola mpo na kotelemela zamba ya mokili ya sude.


« Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.


Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.


Basakoli na bango bazalaki koloba : « Kosakola te, kosakola makambo ya boye te ! Pasi ekokomela biso te. »


Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !


Samuele alobaki na Saulo : — Kata ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka. Saulo alobaki na ye : — Yebisa ngai yango !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ