Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 7:14 - Mokanda na Bomoi

14 Amosi azongiselaki Amatsia : — Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 7:14
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya alongwaki wana mpe akutanaki na Elize, mwana mobali ya Shafati. Azalaki kobalola bilanga na bangombe tuku mibale na minei bakangisa mibale-mibale liboso na ye mpe ye moko azalaki kotambolisa bangombe mibale ya suka. Eliya apusanaki pembeni ya Elize mpe abwakelaki Elize kazaka na ye.


Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe : — Nasengi na yo ete obeta ngai. Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye.


Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki : « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize ! » Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele.


Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !


Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !


Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani.


Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »


Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize : — Tala ! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso.


Na tango wana, Anani, momoni makambo, akendeki epai ya Asa, mokonzi ya Yuda, mpe alobaki na ye : — Lokola otie elikya na yo na mokonzi ya Siri na esika ya kotia elikya na yo na Yawe, Nzambe na yo, ozali lisusu na bokonzi te likolo ya mampinga ya mokonzi ya Siri.


mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati : « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe ? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya Jewu, mwana mobali ya Anani ; mpe masolo yango ezali kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Bazalaki kobuka matiti ya mungwa kati na banzete mpe kolia misisa ya banzete mike.


Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.


Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?


Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai ! ›


Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni.


Tango bato nyonso oyo bayebi Saulo wuta kala bamonaki ye kosakola elongo na basakoli bamitunaki : « Likambo nini ekweyi na bomoi ya mwana mobali ya Kishi ? Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ