Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo ; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te ? » Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe.
Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.
Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.
Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.
Bomikokola suki na mito mpo na bana na bino ya mibali oyo bolingaka, ndenge esalemaka na matanga. Bomikokola suki na mito mpe botikala mabandi lokola mpongo, pamba te bakomema bango na bowumbu mosika na bino.