Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : Tango matiti ebandaki kobota, ebimisaki mabanki ebele. Esalemaki sima na kobuka milona ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 7:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba ndenge balokotaka mankoko ; bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.


Sima na Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, komema na bowumbu, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, bakalaka ya Yuda, bato ya misala ya maboko mpe bato oyo balambaka bibende na moto ; Yawe alakisaki ngai bitunga mibale ya bambuma ya figi oyo batiaki liboso ya Tempelo ya Yawe.


Bongo nayebisaki bato oyo bazalaki na bowumbu makambo nyonso oyo Yawe alakisaki ngai.


Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki, mabanki minene elie yango ; oyo mabanki minene etiki, mabanki mike elie yango ; oyo mabanki mike etiki, mabanki mosusu elie yango.


Nakozongisela bino mibu oyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele, ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki : mampinga minene na Ngai oyo natindaki mpo na kobundisa bino.


« Mbala mingi, nazalaki kobwakela bilanga na bino bokono, banzete na bino ya ble mpe ya vino ekomaki kokawuka ; bongo mabanki ekomaki kolia banzete na bino ya figi mpe ya olive. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili.


Tala makambo oyo alakisaki ngai : Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka.


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : kitunga etonda na bambuma etela.


Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ