Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi.
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »
Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.