Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 6:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bozali kobeta mandanda na bino lokola Davidi mpe kokotisa bibetelo mindule kati na banzembo na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 6:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda.


Davidi alobaki na bakambi ya Balevi ete bapona, kati na bandeko na bango, bayembi mpo na koyemba banzembo ya esengo, na bibetelo mindule : nzenze, lindanda mpe manzanza.


Balevi nkoto minei bazala bakengeli bikuke, mpe Balevi nkoto minei bakumisa Yawe na bibetelo mindule oyo nasalaki na tina na yango. »


Balevi babongamaki elongo na bibetelo mindule ya Davidi, mpe Banganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango.


Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka ; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali : mwasi mpe basi ebele ya kitoko.


Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, kasi bakanisaka te mosala na Yawe mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.


Nakosukisa makelele ya banzembo na yo, mpe mindule ya lindanda na yo ekotikala koyokana lisusu te.


Bolongola makelele ya banzembo na bino liboso na Ngai ! Nakoyoka mindule ya mandanda na bino te.


Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.


Solo, na kala, bolekisaki tango mingi na kosala makambo oyo Bapagano basalaka : kindumba, baposa mabe ya nzoto, milangwa, lokoso ya kolia mpe ya komela, mpe kosambela bikeko ya nkele.


Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe babeti kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndenge bakomonana lisusu te kati na yo. Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble ekoyokana lisusu te kati na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ