Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 6:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko, bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko, bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 6:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.


Elamba yango ezalaki na banzela ya langi ya mosaka, ya langi ya pembe mpe ya langi ya ble ; bakangisaki yango na makonzi oyo basala na mabanga ya marbre, na basinga ya lino ya langi ya pembe mpe ya motane ; bongo balekisaki yango kati na bapete ya palata. Batiaki bakiti minene ya wolo mpe ya palata, na etando ya lopango ya bakaro oyo basala na mabanga ya talo ya langi ya ndenge na ndenge : mabanga ya porfire, ya marbre, ya marbre ya mwindo mpe mabanga mosusu ya talo.


Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta ; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe ;


Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, kolia misuni mpe komela masanga ya vino ! Bozalaki koloba : « Tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »


Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !


Mpe kokota te na ndako oyo bazali kosala feti mpo na kovanda mpe komela,


Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.


Ovandaki na mbeto moko ya kitoko ; mpe liboso na yango, ezalaki na mesa moko oyo otiaka malasi ya ansa mpe mafuta na Ngai.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi makolo mibale to songe ya litoyi ya meme, ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama, ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge mpe na basuka ya bambeto na bango. »


Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.


Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.


Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.


Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ