Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko bakomi kokufakufa na babalabala ; ba-oyo bakolaki na molato ya motane bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.
« Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba : ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. ›
Zingazinga na ye, makelele ya bato ebele ezalaki koyokana, bameli masanga ebele oyo bawutaki na esobe elongo na bato ebele bayaki kolatisa bango mayaka na maboko mpe mitole ya bonzenga na mito na bango.
Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »
Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito : ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango !
Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene : bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka, mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te.
Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.
Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.
mpe bakoloba : « Boni, alakaki te ete akoya ? Wapi ye sik’oyo ? Pamba te, banda bakoko na biso bakufa, makambo nyonso ezali na yango kaka ndenge ezalaka wuta na ebandeli ya mokili. »
Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! › Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika.