Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 6:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mpo na yango, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Oh libota ya Isalaele, nakobimisa ekolo moko oyo ekobundisa mpe ekonyokola yo tango nyonso wuta na Lebo-Amati kino na lubwaku ya Araba. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 6:14
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene ; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei.


Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi.


Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.


Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.


Na mokolo wana, Yawe akosalela jileti oyo akodefa na ngambo mosusu ya Efrate, elingi koloba mokonzi ya Asiri, mpo na kokokola suki ya moto na yo, suki ya makolo na yo mpe mandefu na yo.


Na ngambo ya weste, ebale monene Mediterane ekozala mondelo. Mondelo yango ekobanda longwa na mondelo ya sude ya ebale monene Mediterane kino na esika oyo etalana na Lebo-Amati. Yango nde ekozala mondelo ya weste.


Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Monguna moko akozingela yo, akosukisa yo mpe akobotola na makasi biloko kati na bandako na yo, oyo batonga makasi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ