Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele.
Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi.
Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia !
Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’
amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »
Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.
Na mokolo wana, oh bato na Ngai, bokoyokisama lisusu soni te mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai, pamba te nakolongola bato oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino. Boye bokomitombola lisusu te na lolendo na ngomba na Ngai ya bule.
Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.
Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.
Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.