12 Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.
Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.
Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »