Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Pamba te Yawe apesi mitindo, boye akobuka-buka na biteni ndako monene mpe akobuka-buka na biteni ya mike-mike ndako moke.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 6:11
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.


Abengisaki nzala makasi kati na mboka, azangisaki bango bilei.


Na mitindo na Ye, banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyaki na mboka mobimba.


Na mitindo na Ye, mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga te esopanaki,


Soki moto azali goyigoyi, likolo ya ndako na ye ekobukana ; soki maboko na ye elemba, ndako na ye ekotanga mayi.


Napesaki mitindo epai na bato oyo babulisama mpo na Ngai ; nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, mpo na kosilisa kanda na Ngai.


ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.


Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi mpe ya tango ya molunge makasi ; mpe bandako oyo batonga kitoko na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, » elobi Yawe.


lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.


Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


« Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.


Kasi Yawe azwi mokano oyo mpo na yo : « Okotikala kozwa lisusu bakitani te oyo bakobatela kombo na yo na bokonzi. Nakolongola kati na tempelo na yo banzambe na yo ya bikeko mpe bikeko nyonso oyo basala na bibende balekisa na moto. Nazali kobongisela yo kunda, pamba te ozali na yo pamba. »


Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.


Edomi akoki koloba : « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu ! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango ! Bakobenga mokili yango : ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›


bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ