Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 6:10 - Mokanda na Bomoi

10 Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna : — Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna ? Akozongisa : — Te, moto mosusu azali te ! Bongo akoloba lisusu : — Esili ! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 6:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Joziasi atalaki na zingazinga, amonaki bakunda oyo ezalaki na likolo ya ngomba ; boye akundolaki mikuwa oyo ezalaki kuna mpe atumbaki yango na likolo ya etumbelo. Na nzela yango, abebisaki lokumu ya etumbelo yango kolanda Liloba na Yawe, oyo moto na Nzambe asakolaki.


Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »


« ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango.


Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito : « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba : ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi ! ›


Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »


Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko.


« Yebisa libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga.


Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.


Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.


Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango.


bilombe na bango nyonso batelemaki mpe batambolaki butu mobimba mpo na kokoma na Beti-Sheani. Bongo sima na bango kokitisa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali wuta na mir, bazongaki na Yabeshi epai wapi batumbaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ