Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele.
Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu, mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawuka oyo ezali kopumbwa na mopepe ; ekosalema bongo na pwasa.
Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »
balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.