8 boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili ; Kombo na Ye ezali : Yawe.
nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te ; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.
Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola mpe atia miboko na yango na mabele ; abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mabele. Kombo na Ye ezali : Yawe.
mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »