Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bino bato oyo bobongolaka bosembo ngenge mpe bobwakaka bosolo na mabele,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:7
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !


Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.


Makambo ya bato mabe ebebisaka bango moko, pamba te baboyaka kosala makambo ya sembo.


Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.


Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato !


Boyoka Ngai, bino bato ya mitema makasi, bino bato oyo bozali mosika ya bosembo !


Mawa na bato oyo babengaka mabe malamu mpe malamu mabe, oyo bamonaka molili lokola pole mpe pole lokola molili, oyo bamonaka bololo lokola elengi mpe elengi lokola bololo !


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.


Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.


Soki moto ya sembo atiki boyengebene na ye mpe akomi kosala mabe, akokufa mpo na mabe yango.


Bapesaka bilaka ebele, balapaka ndayi ya lokuta mpe basalaka boyokani. Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngenge oyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.


Nakobebisa mokonzi na yango mpe nakoboma ye elongo na bakalaka na ye, » elobi Yawe.


Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »


Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.


Boyoka maloba oyo, bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, bino oyo bolingaka makambo ya sembo te mpe bobongolaka makambo ya alima,


Yango wana bato bazali kotosa lisusu mibeko te, bazali kokata lisusu makambo na bosembo te. Bato mabe bazali kolonga liboso ya bato ya sembo, makambo ezali lisusu kokatama na bosembo te.


bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.


Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ