Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:5
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.


Abrayami alonaki nzete ya tamarisi na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko.


Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba.


Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato : — Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi ! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito.


Jeroboami atiaki ekeko moko na Beteli mpe mosusu na Dani.


Joziasi abengisaki Banganga-Nzambe nyonso ya bingumba ya Yuda mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki longwa na Geba kino na Beri-Sheba epai wapi banganga-nzambe wana bazalaki kotumba ansa. Abukaki mpe bisika ya bule oyo batonga pene ya bikuke ya bingumba : oyo ezalaki na ebandeli ya ekuke ya Jozue, moyangeli ya engumba, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi ya ekuke ya engumba.


Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »


Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.


Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu te mpe bato oyo balukaka pasi ya baninga bakokufa :


Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !


Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.


Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »


Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso oyo basalaki na Giligali ; Nakobengana bango na Ndako na Ngai mpo na misala na bango ya mabe. Nakolinga bango lisusu te, pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.


Nakobuka ekuke ya Damasi, nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni, mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni ; mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, » elobi Yawe.


« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.


« Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.


Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.


Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »


Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.


Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »


Nzambe aponaki biloko ezanga tina, biloko ya kotiola, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo mokili epesaka tina,


Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.


Bokozala na bana ya mibali mpe ya basi, kasi bokobatela bango te, pamba te bakokende na bowumbu.


Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, natindiki soni ya Ejipito mosika na bino. Babengaki esika yango « Giligali » kino na mokolo ya lelo.


Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! › Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika.


Samuele alobaki na bato : — Boya ! Tokende na Giligali mpo na kovandisa kuna bokonzi ya Saulo.


Abandaki kotambola mibu nyonso, kobanda na Beteli, koleka na Giligali kino na Mitsipa, mpo na kokamba bato ya Isalaele na bisika nyonso wana.


Kombo ya mwana na ye ya liboso ya mobali ezalaki « Joeli, » mpe ya mibale, « Abiya. » Bazalaki kosala mosala na bango na Beri-Sheba,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ