Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Engumba oyo ekotinda basoda nkoto moko mpo na kobundela Isalaele ekotikala kaka na basoda nkama moko, mpe oyo ekotinda basoda nkama moko ekotikala kaka na basoda zomi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:3
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bangombe na biso ezali minene ; likama ezali te, zemi ezali kosopana te, mpe koganga moko te ya pasi ezali koyokana na bisika na biso.


Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore.


Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.


Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.


Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Soki bato zomi batikali na bomoi kati na ndako moko, bango mpe bakokufa.


Ezayi agangaki na tina na Isalaele : « Ata soki motango ya bana ya Isalaele ezalaki lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakobika.


Bino oyo bozalaki ebele lokola minzoto na likolo, bokotikala kaka moke ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino.


Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.


Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ