ezala tango bamisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende oyo banyangwisa na moto mpe balobaki : ‹ Tala Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ! › mpe tango balobaki maloba ya nkele mpo na kotelemela Yo.
pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba : mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko.
pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango.
Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito.
Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya. ’ ›
Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe.