Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:22 - Mokanda na Bomoi

22 Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma, nakondima yango te ; ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta, nakotala yango ata moke te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:22
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.


Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.


Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ; ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.


« Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe ? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.


Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.


Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »


Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika ? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bokoba kaka na makambo oyo bozali kosala, bobakisa mbeka na bino ya kotumba mpe makabo mosusu, mpe bolia misuni yango bino moko !


‹ Tala mibeko mpo na mbeka ya boyokani oyo moto akoki kobonza epai na Yawe :


Bolongola makelele ya banzembo na bino liboso na Ngai ! Nakoyoka mindule ya mandanda na bino te.


« Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko ! Boni, andima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Samuele alobaki : — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ