Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:20 - Mokanda na Bomoi

20 Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili ? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole ? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:20
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te : moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.


Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.


Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.


Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.


Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso. Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki, bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.


Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.


Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi, mokolo ya pasi mpe ya somo, mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama, mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,


Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »


Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »


Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.


Anjelu ya mitano asopaki kopo na ye na likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama, mpe molili ezipaki bokonzi ya nyama yango. Bato bakomaki komiswa lolemo mpo na pasi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ