Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te ! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:2
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.


Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala.


Bobongisa esika mpo na koboma bana na ye ya mibali likolo ya masumu ya batata na bango ! Tika ete balamuka lisusu te mpo na kozwa mabele lokola libula mpe kotondisa mokili elongo na bingumba na bango.


Mokili ekomi kotenga-tenga lokola moto oyo alangwe masanga, ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.


Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.


tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo. Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.


Ye oyo atelemisaka bashar mpe bampunda, mampinga ya basoda elongo na bilombe ya bitumba ; Ye oyo alalisaka bango nyonso, mpe bakokaka lisusu kotelema te, bakufaka lokola singa ya mwinda :


Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Boluka koyeba kati na bikolo soki nani asila koyoka makambo ya boye ! Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza !


Balobaka na nzete : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na libanga : ‹ Yo nde obotaki ngai. › Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te. Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka : ‹ Yaka kobikisa biso ! ›


Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.


Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ; mokili mobimba ekufi. Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.


Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya, mpe moto moko te akoya kosunga yango ; nakopelisa moto kati na bingumba na yango, mpe moto yango ekozikisa bato nyonso oyo bazingeli yango. ›


‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › » Maloba ya Jeremi esuki awa.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Boni, soki moto akweyi, atelemaka te ? Soki moto abungi nzela, azongaka lisusu na nzela te ?


Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »


Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te ; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.


Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?


Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.


Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.


Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »


Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ