Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:17 - Mokanda na Bomoi

17 Kolela ekozala na bilanga nyonso ya vino, pamba te nakoleka kati na bino, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:17
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize alobaki na Faraon : « Tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Na kati-kati ya butu, nakotambola kati na mokili mobimba ya Ejipito.


Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.


Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma.


Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko, banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te kati na bilanga ya vino ! Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo, pamba te nakosukisa koganga.


Esengo mpe kosepela esili kolimwa na bilanga mpe na bazamba ya Moabi ; nakawusi vino kati na bikamolelo na bango, mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te. Atako bato bazali koganga kasi ezali makelele ya esengo te.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ata banguna na bino bazali ebele mpe makasi, bakosila kokufa mpe kolimwa. Oh mokili ya Yuda, soki nasambwisaki yo, nakosala yango lisusu te.


Nakobundela ndako na Ngai liboso ya mampinga ya basoda ya nguya ; monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ