Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 5:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Kolela ekozala na babalabala nyonso, mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka. Bakobengisa basali bilanga na matanga, mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 5:16
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.


Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ; koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi, mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.


Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki kobenga bino na mokolo wana mpo ete bolela mpe bosala matanga, bomikokola suki mpe bolata saki.


« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te.


Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »


« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Botala malamu makambo oyo ! Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu !


Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.


Bino basali bilanga, bozala na soni ; bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje, pamba te milona ebebisami.


Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.


Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Bosala matanga lokola elenge mwasi oyo alati pili mpo na kolela mobandami na ye.


« Boyoka makambo oyo mpe bokebisa ndako ya Jakobi, » elobi Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga.


Yango wana nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Damasi, elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.


Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.


Yango wana, nakolela mpe nakosala matanga, nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu, nakoganga lokola mbwa ya zamba mpe nakolela lokola maligbanga.


Na mokolo wana, bakosambwisa bino ; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo : ‹ Tobebisami penza mobimba ! Libula ya bato na ngai ekabwani ! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »


Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! ›


Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene epai wapi bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo ! Na ngonga moko kaka, obebisami ! ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ