Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 4:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bato bazalaki kotambola-tambola longwa na engumba moko kino na engumba mosusu mpo na koluka mayi, kasi bazwaki mayi oyo ekokelaki baposa na bango te ; atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 4:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabi apesaki mitindo na Abidiasi : « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso ; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. »


Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te epai na Yawe oyo abetaki bango, mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »


Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.


Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa ; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango.


Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.


Lokola baboyi kozonga epai na Ngai, bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te, kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.


Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !


Nabomaki bino nzala kati na bingumba na bino nyonso, napimelaki bino bilei kati na bamboka na bino nyonso ; kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Okolia, kasi okotonda te, pamba te nzala makasi ekokota na ndako na yo. Okosala ekonzo, kasi okobatela eloko moko te, pamba te nakokaba yango na mopanga.


Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »


Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ