Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 4:7 - Mokanda na Bomoi

7 « Napimelaki bino lisusu mvula, basanza misato mobimba liboso ete tango oyo babukaka bambuma ekoma. Natindaki mvula na engumba moko mpe nakangaki yango na engumba mosusu. Elanga moko enokelaki mvula, kasi mosusu ezangelaki yango mpe ekawukaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 4:7
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Moyize asembolaki loboko na ye likolo mpe molili makasi ezipaki mokili mobimba ya Ejipito mikolo misato.


Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda.


Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?


Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.


Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › »


Nakokomisa yango esobe : kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti ; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.


Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.


Bakambi bazali kotinda basali na bango mpo ete bakende kotoka mayi ; kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, bazipi bilongi na soni mpe na mawa.


Mabele esili kokawuka, pamba te mvula ezali konoka lisusu te, basali bilanga bakomi na pasi mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.


Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.


Bosepela, bino bato ya Siona, bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino, pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino. Akonokisela bino bamvula minene na eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga, ndenge ezalaki liboso.


Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango.


Bino bolobaka : « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga ; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.


Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ?


noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango ; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino.


Eliya azalaki moto lokola biso, abondelaki na molende nyonso mpo ete mvula enoka te, mpe mvula enokaki te na mabele mibu misato na basanza motoba ;


Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ