Amosi 4:5 - Mokanda na Bomoi5 Botumba farine oyo batia levire lokola likabo ya kozongisa matondi, mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino, oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi, pamba te bolingaka nde kosala bongo, elobi Nkolo Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.