Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 « Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 4:4
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.


Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko.


Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso oyo basalaki na Giligali ; Nakobengana bango na Ndako na Ngai mpo na misala na bango ya mabe. Nakolinga bango lisusu te, pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.


« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.


Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »


Bokoba malamu na mosala oyo batata na bino babandaki, mosala ya koboma basakoli !


Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.


Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Esili ! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.


Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.


Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali ; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ