Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.
Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.
Nakokanga yo bibende na mbanga, nakosala ete mbisi ya ebale na yo ekangama yo na poso ya nzoto ; nakobimisa yo na libanda ya bibale na yo elongo na mbisi oyo ekangami yo na poso ya nzoto.
Nakokembisa yo, nakotia yo bibende na mbanga, nakobimisa yo elongo na basoda na yo nyonso, mpunda na yo elongo na basoda oyo babundaka likolo ya bampunda : bango nyonso balata kitoko mpe batondi ebele, bamemi banguba minene mpe ya mike mpe bayebi malamu kosalela mipanga.
Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »