Amosi 4:10 - Mokanda na Bomoi10 « Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »
Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko ; bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso bakozinda na ebale monene ya este ; mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. Solo na ye ya kopola ekoyokana, kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene.