Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 4:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 4:1
49 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso.


Pamba te anyokolaki babola mpe atikaki bango lokola bato bazangela, abotolaki ndako ya bato na esika ya kotonga ndako na ye moko.


balongolaka babola na nzela, mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama.


ba-oyo balobaka : « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso ; nani akoluka kozala nkolo na biso ? »


Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.


Kozala mosika na ngai te, pamba te pasi ekomi pene mpe nazangi moto oyo akosunga ngai.


Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !


Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, elanga pembeni ya elanga, kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili !


Moko na moko alobaka : « Yaka ! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga ! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele ! »


Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.


« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,


Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso ; tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama ! Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki, tango mpo na bango ya kozwa etumbu.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ; solo, atiaki biso na mobulu, akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ; amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ; mpe sima, asanzaki biso.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama zingazinga ya Yelusalemi ! Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, pamba te etondi na makambo mabe !


soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi,


anyokolaka mobola mpe moto oyo akelela, ayibaka, azongisaka te eloko oyo akangi na niongo epai ya mokolo na yango, atalelaka banzambe ya bikeko, asalaka makambo ya mbindo,


Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.


Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.


Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.


Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.


nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.


Bokolia misuni ya bilombe ya bitumba mpe bokomela makila ya bakambi ya mabele, ndenge basalaka na bameme ya mibali oyo ekemba, na bana meme ya mibali, na bantaba ya mibali to na bana ngombe ya mibali : nyonso esengeli kozala ya mafuta mpe kowuta na Bashani.


Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa, na likolo mpe na mokili : makila, moto mpe makonzi ya milinga.


Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :


Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko soki bayokani te ?


lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.


Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !


Bozali komela bakopo etonda na masanga ya vino mpe bozali kopakola mafuta ya talo na banzoto na bino, kasi kobebisama ya ndako ya Jozefi ezali kosala bino pasi na mitema te.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Boye bana ya Isalaele babalukaki mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela oyo ekenda kino na Bashani. Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na bango mpe kobundisa bango na Edreyi.


Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela : azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo.


Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ