Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito : ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 3:9
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bopanza sango yango te kati na Gati, bopanza yango te na babalabala ya Ashikeloni, noki te bana basi ya bato ya Filisitia bakosepela, mpe bana basi ya mibali oyo bakatama ngenga te bakopumbwa na esengo.


tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge, mpe tokotondisa bandako na biso na bomengo ya bitumba ;


Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Okolona lisusu bilanga ya vino na bangomba ya Samari ; bato oyo bakolona yango bakosepela tango bakobuka mbuma na yango.


« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›


« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›


Kasi bino, bangomba ya Isalaele, bokobota bitape mpe bambuma mpo na Isalaele, bato na Ngai ; pamba te etikali kaka moke ete bazonga epai na bango.


Nakokomisa bango ekolo kaka moko kati na mokili, na likolo ya bangomba ya Isalaele. Ekozala kaka na mokonzi moko oyo akokonza bango ; mpe bakozala lisusu bikolo mibale te to bakokabwana lisusu na bokonzi mibale te.


Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta ; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.


Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni. Nakobalukela engumba Ekroni kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, » elobi Nkolo Yawe.


Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »


lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.


Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !


Bozali kozongisa mokolo ya pasi sima mpe komibendela bokonzi ya somo.


Tokosomba mobola na palata mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale, bongo tokoteka ata basalite ya ble.


Oh libota ya mobulu, boni, nasepela penza komona bomengo na bino, oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, Efa ekoka te oyo elakelama mabe ?


Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ