Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 3:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh bato na ngai, babeti bino ndenge batutaka ble na libanda ! Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya Nzambe ya Isalaele.


Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.


Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !


Jeremi alobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Yawe atindi ngai kosakola mpo na Ndako mpe engumba oyo, makambo nyonso oyo bosili koyoka.


Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele ; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Alobaki : Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.


« Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.


Nkosi ekoki solo koganga na zamba soki emoni te nyama ya kolia ? Mwana nkosi ekoki penza konguluma na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te ?


Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !


— Bokende kotelema kati na Tempelo mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika.


Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki : — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te !


Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu !


Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ