4 Nkosi ekoki solo koganga na zamba soki emoni te nyama ya kolia ? Mwana nkosi ekoki penza konguluma na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te ?
Bana ya nkosi egangaka sima na nyama mpe esengaka bilei epai ya Nzambe.
Bakolanda Yawe ! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.
Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.
Alobaki : Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.
Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko soki bayokani te ?
Ndeke ekoki solo kokangama na motambo oyo ezali na mabele soki ezangi eloko ya kolia ? Motambo ekoki solo koningana soki ekangi eloko te ?
Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?