Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.
Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. Bakonzi na bango bakoya kotia bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi ; bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.
Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.
yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi.
Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »
bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »
Likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo osalaka, nakosala yo makambo oyo natikala nanu kosala te na tango ya kala mpe oyo nakotikala kosala te na mikolo ekoya. ›
Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.
Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.
Nayebi Efrayimi malamu penza ; mpe Isalaele azali ya kobombama te na miso na Ngai. Efrayimi, awa omipesaki na kindumba, Isalaele mobimba akomi mbindo mpo na yango.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !
Mpo na yango, Yawe alobi : « Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo : ekozala pasi moko oyo bakokoka komibikisa na yango te. Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te, pamba te ekozala tango ya pasi makasi.
Makambo oyo nyonso esalemi likolo ya makambo ya nkele ya engumba oyo etonda na kindumba, engumba ya kitoko makasi kasi etonda na misala ya soloka, engumba oyo epengwisaka bikolo na nzela ya kindumba na yango mpe epengwisaka bato na nzela ya misala na yango ya soloka.
Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.
Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo.
Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili ; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana.
pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.
Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ?