Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 « Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 3:14
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joziasi abukaki mpe etumbelo oyo ezalaki na Beteli mpe esambelo ya likolo ya ngomba oyo Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, atongaki mpo na kopengwisa bana ya Isalaele. Abukaki etumbelo yango mpe akomisaki yango putulu. Bongo atumbaki mpe likonzi ya Ashera.


Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango.


Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.


Pene ya bitumbelo, bazali kolalela bilamba oyo bazwi na ndanga ; mpe kati na ndako ya nzambe na bango, bazali komela vino oyo epesami lokola lomande.


« Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.


Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.


Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.


Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ