Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 3:10
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye, yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te.


Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !


tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge, mpe tokotondisa bandako na biso na bomengo ya bitumba ;


Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.


Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo, kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Namilobelaki : « Bato oyo bazali kaka bato pamba, bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te.


anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu ;


Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.


Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, omoni ? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo ? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai ? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo !


Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta ; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.


Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »


Bino bato oyo bobongolaka bosembo ngenge mpe bobwakaka bosolo na mabele,


Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.


Bozali kozongisa mokolo ya pasi sima mpe komibendela bokonzi ya somo.


Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »


Oh libota ya mobulu, boni, nasepela penza komona bomengo na bino, oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, Efa ekoka te oyo elakelama mabe ?


Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.


Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki ; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ