Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 2:9
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.


Misisa na ye ekawukaka na se ya mabele, mpe, na likolo, bitape na ye elembaka.


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokata bitape ya banzete na nguya monene, akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi, akokomisa yango mikuse.


Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ekokoma solo monene ? Boni, mpongo ya liboso ekopikola yango te mpo ete ezanga kobota mbuma mpe ekawuka ? Makasa na yango nyonso ya sika ekokawuka ; ekoluka na yango makasi mingi te mpe bato ebele te mpo na kopikola yango.


Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.


Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »


Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende ; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.


Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele : « Moyi, telema na Gabaoni ! Sanza, telema na lubwaku ya Ayaloni ! »


Bongo Jozue alobaki : — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ