Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mobeti tolotolo akolonga te, soda ya mpiko akokoka kokima te, mpe soda oyo atambolaka likolo ya mpunda akobikisa bomoi na ye te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 2:15
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.


Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. Tango Yawe akosembola loboko na Ye, ye oyo asungaka akobeta libaku, mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ; bongo, bango mibale bakobebisama.


Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ; bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko mpe bakobuka matolotolo na bango, pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka : afutaka kolanda misala ya moto na moto.


Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali.


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.


Bango nyonso bakokoma lokola bilombe ya bitumba, oyo bakangamaka te na potopoto ya babalabala na tango ya bitumba. Lokola Yawe azali elongo na bango, bakobunda mpe bakolonga, ata basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ