Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Moto oyo aleki na mbangu akobika te, moto oyo aleki makasi akokoka kobimisa makasi na ye te, mpe soda ya mpiko akokoka kobikisa bomoi na ye te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 2:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »


Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi to nguya monene nde ekangolaka elombe.


Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.


Babateli bibwele bakozanga esika ya kokimela ; bakambi ya bampate bakozanga esika ya kobombama.


Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, mpe basoda nyonso bamonaki bongo, bakimaki, babimaki na engumba butu-butu, na nzela ya elanga ya mokonzi, na Ekuke oyo ezali na kati-kati ya bamir mibale ; bakendeki na nzela ya lubwaku ya Yordani.


Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.


Akweyisaka bato ya makasi mpe abebisaka engumba ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ