1 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Moabi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batumbaki mikuwa ya mokonzi ya Edomi mpe bakomisaki yango putulu.
Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.
Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia na bangomba mikuse ya ngambo ya weste ; bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.
Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka : lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi mpo na koyeisa mokili na bango monene.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu mpe batekaki bango na Edomi.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batekaki bato ya sembo mpo na kozwa kaka palata, mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale.
Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »