Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 1:9
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako.


bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,


bakonzi nyonso ya Tiri mpe ya Sidoni ; bakonzi ya bisanga mpe ya bituka oyo ezalaka pene ya ebale monene ;


Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.


bomengo na yo, biloko na yo ya koteka, mombongo na yo, baluki nkayi na yo, bato na yo, oyo basalaka na masuwa, basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo, bato oyo basalaka mombongo elongo na yo mpe basoda na yo nyonso elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa, bakokufa na kati-kati ya bibale minene na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda.


Mpo na ebele ya masumu na yo mpe mombongo na yo, oyo osalaka na bosembo te, obebisi bosantu ya bisika na yo ya bule ; mpe Ngai, nabimisi kati na yo moto mpo ete etumba yo ; nakomisi yo putulu ya mabele na miso ya bato nyonso oyo bazali kotala yo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu mpe batekaki bango na Edomi.


Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.


Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.


Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !


Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.


Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.


Kasi, na kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ