Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni. Nakobalukela engumba Ekroni kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, » elobi Nkolo Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 1:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akendeki kobundisa bato ya Filisitia mpe atobolaki madusu kati na bamir ya Gati, ya Yabine mpe ya Asidodi. Atongaki lisusu bingumba ebele kati na etuka ya Asidodi mpe kati na bituka mosusu ya bato ya Filisitia.


Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai, soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,


Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,


Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi ;


Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza :


mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia ; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene.


Moyi ekobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila, liboso ete mokolo ya Yawe ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya somo.


Nakotia moto na bamir ya Gaza, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi.


Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito : ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango !


Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga ; engumba Gaza ekokoma na somo makasi, ndenge moko mpe engumba Ekroni ; pamba te elikya na yango ekosila. Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yango mpe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te.


Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi, mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia.


Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu : moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ