6 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu mpe batekaki bango na Edomi.
wana bato ya Filisitia bakotaki na makasi kati na bingumba ya etando mpe ya sude ya Yuda. Bazwaki na makasi Beti-Shemeshi, Ayaloni, Gederoti, Soko, Timina mpe Gimizo elongo na bamboka na yango ya zingazinga, mpe bavandaki kuna.
Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango,
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.
Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.
Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu : moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni.